Kobandima

Lisanga ya Malakisi na Maye Matali Bresil-Africa na USP miango ya kotombola mpe kovandisama esika ya interdiciplinere ya bolukiluki, ya lisolo mpe ya kokabola pona bantu ya mayele mpe bituluku ya bolukiluki koyekola esanga ya Afrika mpe boyokani ya bayindo ya Brésil.​​​​​​​

Ti sika awa, lisanga eye na kati na yango emipesaki mitindo ya kolandela makasi penza kolendisanaka masolo ya kala, makomi, lokota, nkita, mimesano mpe politiki elongobani na bokeseni ya tango.

Lisanga eye emonisaki mosala na yango kaka te yengebene na kolandimasa ya malakisi ya eteyelo ya kalasi ya likolo kasi mpe pona bokoli ya masangá kati ya eteyelo monene mpe bisika libanda ya eteyelo.

Misala ya NAP Bresil Afrika ezali kotambwisama yengebene na bomoni eterdisipliner oyo mposa euti na kati ya ndingisa yaye moko, pela moko na kotangisama o na kati ya lolenge na yango moko, ebikeli ya bayi afrika esengeli esalema naba lolenge ebele, oyo esengi bomoneli mpe esaleli ya ndenge na ndenge na nzela ya lisolo.

Bobimisi ya boyébi na mayé matali bobikeli ya bayi afríka mpe ya bayindo ya Bresil emonisamaki eloko ya motuya mingi pona mongomba ya mboka bresil ekoka ko kola nakati ya bososolo ya mozindo ya mbongwana ya ebikeli ya maye maleka kala, na nguya ya bomesano mpe na bokani ya nkita mpe politiki oyo etshiami kobanda na boyokani katikati ya mboka Bresil mpe esanga ya afríka. Ezali motuya mpe ko banzá lolenge nini bato ya loposo moyindo, basi mpe mibali, bakoki ko fanda elongo na libota ya Bresil, mpe lokola ekeseni ya bolamu ya lisanga oyo esalemi na bayi afrika mpe bakitani naye.

NAP Brésil-Afrika ya USP ekosami na CNPq mpe eza naba nzela ya bolukiluki ya pona kopesa mpifo na maye matali koyekola ya afrika, bayindo ya Bresil mpe kati na boyokani na Brésil mpe esanga ya bikolo ya Afrika, pona kolendisa mikangano ya etuluku na makambo ekeseni mpe kobongisa lisusu ba limbola na esaleli interdicipliner mpe transdicipliner. Litomba ya bolukiluki eza ya kokabwana na bituluku mpe bibongiseli misusu na nzela ya ko bimisa mikanda na lokasa mpe elektroniki, mpe lisusu ba video, kolakisa mateya mpe mikanda mosusu. Zingazinga na maye manso libongoli NAP Bresil-Afrika eza kokesana.